12 “Mpe ekosalema mpenza boye: ntango Yehova akosilisa mosala na ye nyonso na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, nakotuna mokonzi ya Asiri azongisa monɔkɔ mpo na mbuma ya lofundo ya motema na ye mpe mpo na komitombola ya miso na ye ya lolendo.+
13 Kasi yo, olobi na motema na yo ete: ‘Nakomata na likoló.+ Nakotombola kiti na ngai ya bokonzi+ likoló ya minzoto+ ya Nzambe, mpe nakofanda na ngomba ya kokutana,+ na nsukansuka ya nɔrdi.+