Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 4:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpo na yango, bókanga ngɔtɔ na loketo.+ Bóbɛta ntolo na bino mpe bóganga na kolela,+ mpo nkanda ya kongala ya Yehova elongwe naino epai na biso te.+

  • Bileli 2:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mikóló ya mwana mwasi ya Siona bafandi na mabele, mpe bafandi nyɛɛ.+

      Batye putulu na motó na bango.+ Bakangi ngɔtɔ na loketo.+

      Bangɔndɔ ya Yerusaleme bakitisi motó na bango na mabele.+

  • Yoele 1:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Gangá na kolela, ndenge ngɔndɔ oyo akangi ngɔtɔ+ na loketo alelaka nkolo na ye na ntango ya bolenge na ye.

  • Amose 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe nakobongola bafɛti na bino ekóma kolela+ mpe nzembo nyonso na bino ekóma loyembo ya mawa, mpe nakomatisa ngɔtɔ na loketo nyonso mpe libandi na motó nyonso;+ mpe nakosala ete makambo yango ezala lokola kolela oyo balelaka mwana mobali kaka moko,+ mpe nsuka na yango lokola mokolo moko ya bololo.’

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto