22 Lisusu, Hizikiya alobaki maloba oyo esimbaki motema+ ya Balevi oyo bazalaki kosalela Yehova na bokɛngi mpenza.+ Mpe na boumeli ya mikolo nsambo, balyaki na fɛti oyo etyamá,+ bazalaki kopesa bambeka ya boyokani+ mpe bazalaki koyambola mabe+ epai ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango.