-
Yisaya 66:19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 “Mpe nakotya elembo kati na bango,+ mpe bato mosusu na kati ya baoyo babiki, nakotinda bango na bikólo,+ na Tarasisi,+ na Pulu mpe na Ludi,+ baoyo babendaka litimbo, Tubale ná Yavane,+ bisanga ya mosika,+ oyo bayoká nsango na ngai te mpe bamoná nkembo na ngai te;+ mpe bakoyebisa mpenza nkembo na ngai na kati ya bikólo.+
-
-
Yirimia 44:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 Mpe kati na bato ya Yuda oyo batikali, oyo bazali kokɔta mpo na kofanda bapaya na mokili ya Ezipito,+ mobiki to moto oyo akotikala na bomoi akozala te, ɛɛ, mpo na kozonga na mokili ya Yuda epai bazali kokolisa mposa ya molimo na bango mpo na kozonga kofanda kuna;+ mpo bakozonga te, longola kaka mwa bato oyo bakobika.’”
-