Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 21:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Nsima na yango, alonaki nzete ya tamarisi na Beere-sheba mpe kuna azalaki kobelela nkombo ya Yehova,+ Nzambe oyo azali koumela seko.+

  • Kolimbola Mibeko 33:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Nzambe ya ntango ya kala azali esika ya komibomba,+

      Mpe mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo.+

      Mpe akobengana monguna liboso na yo,+

      Mpe akoloba ete: ‘Silisá bango nyɛɛ!’+

  • Nzembo 90:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Liboso bangomba ebotama,+

      To obanda kobimisa mokili+ mpe mabele oyo ebotaka,+ lokola na mpasi ya kobota,

      Ɛɛ, libela na libela yo ozali Nzambe.+

  • Yisaya 57:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpo talá oyo Moto oyo azali likoló mpe Moto oyo atombwani,+ oyo afandi mpo na libela+ mpe oyo nkombo na ye ezali mosantu,+ alobi: “Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu,+ mpe esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa,+ mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.+

  • Yirimia 10:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi Yehova azali Nzambe na bosolo.+ Azali Nzambe ya bomoi+ mpe Mokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Mpo na nkanda na ye mabele ekoningana,+ mpe bato ya bikólo bakokoka te makaneli na ye.+

  • Baroma 16:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 kasi oyo emonisami sikoyo polele+ mpe oyo eyebisami na makomi ya basakoli na kati ya bikólo nyonso na boyokani na mitindo ya Nzambe ya seko mpo bándima mpe bátosa ye;+

  • 1 Timote 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Sikoyo, Mokonzi ya seko,+ oyo akoki kopɔla te,+ oyo amonanaka te,+ ye Nzambe kaka moko,+ azwa lokumu ná nkembo libela na libela.+ Amen.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto