Nzembo 139:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Boyebi ya boye ezali kokamwisa ngai mingi.+Eleki likoló mingi, nakoki kokóma na yango te.+ Nzembo 147:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Nkolo na biso azali monene mpe na nguya mingi mpenza;+Ndenge ya kolobela mayele na ye ezali te.+ Yisaya 55:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 “Mpo ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,+ ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino,+ mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+ Baroma 11:33 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Ee bomɛngo+ ya Nzambe mpe bwanya+ na ye mpe boyebi+ na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te+ mpe banzela na ye ekoki koyebana te! 1 Bakorinti 2:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpo “nani ayebi makanisi ya Yehova,+ mpo alakisa ye”?+ Kasi biso tozali na makanisi+ ya Kristo.
9 “Mpo ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,+ ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino,+ mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+
33 Ee bomɛngo+ ya Nzambe mpe bwanya+ na ye mpe boyebi+ na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te+ mpe banzela na ye ekoki koyebana te!