55Ee bino nyonso oyo bozali na mposa ya mai!+ Bóya epai mai ezali.+ Mpe baoyo bazali na mbongo te! Bóya, bósomba mpe bólya.+ Ɛɛ, bóya, bósomba vinyo+ mpe miliki+ na mbongo te, ya ofele.+
11 “‘Talá! Mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mpe nakotinda nzala kati na mokili, nzala ya mampa te, mpe nakotinda mposa, mposa ya mai te, kasi nde ya koyoka maloba ya Yehova.+