11 Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko.+ Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate;+ mpe akomema yango na ntolo na ye.+ Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.+
17 Yango wana asengelaki kokóma lokola “bandeko” na ye na makambo nyonso,+ mpo akóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo ya Nzambe,+ mpo apesa mbeka ya kozipa+ masumu ya bato.+