Nzembo 97:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Baoyo nyonso basalelaka ekeko nyonso oyo eyemami bázala na nsɔni,+Baoyo bazali komikumisa mpo na banzambe ya mpambampamba.+Bógumbamela ye, bino banzambe nyonso.+ Yisaya 1:29 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 29 Mpo bakoyoka nsɔni mpo na banzete makasi oyo bolulaki,+ mpe bokosambwa mpo na bilanga oyo boponi.+ Yisaya 44:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Talá! Baninga na ye nyonso bakoyoka nsɔni,+ mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ bazali kaka bato ya mabele. Bakoyangana bango nyonso.+ Bakotɛlɛma nyɛɛ. Bakozala na nsɔmɔ. Bango nyonso bakoyoka nsɔni.+ Yisaya 45:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Ya solo, bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa, bango nyonso. Basali ya bikeko ya ndenge na ndenge bakotambola elongo na kosambwa.+ Yirimia 2:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 “Lokola nsɔni oyo moyibi ayokaka ntango bakangi ye, nsɔni ya bongo nde bato ya ndako ya Yisraele bayoki,+ bango, bakonzi na bango, bankumu na bango ná banganga-nzambe na bango mpe basakoli na bango.+
7 Baoyo nyonso basalelaka ekeko nyonso oyo eyemami bázala na nsɔni,+Baoyo bazali komikumisa mpo na banzambe ya mpambampamba.+Bógumbamela ye, bino banzambe nyonso.+
29 Mpo bakoyoka nsɔni mpo na banzete makasi oyo bolulaki,+ mpe bokosambwa mpo na bilanga oyo boponi.+
11 Talá! Baninga na ye nyonso bakoyoka nsɔni,+ mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ bazali kaka bato ya mabele. Bakoyangana bango nyonso.+ Bakotɛlɛma nyɛɛ. Bakozala na nsɔmɔ. Bango nyonso bakoyoka nsɔni.+
16 Ya solo, bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa, bango nyonso. Basali ya bikeko ya ndenge na ndenge bakotambola elongo na kosambwa.+
26 “Lokola nsɔni oyo moyibi ayokaka ntango bakangi ye, nsɔni ya bongo nde bato ya ndako ya Yisraele bayoki,+ bango, bakonzi na bango, bankumu na bango ná banganga-nzambe na bango mpe basakoli na bango.+