Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 43:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Ngai moko nasakoli mpe nabikisi mpe nayebisi yango,+ wana nzambe mopaya ata moko te azalaki na kati na bino.+ Yango wana, bino bozali batatoli na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova, “mpe ngai nazali Nzambe.+

  • Yisaya 44:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bózala na nsɔmɔ te, bókamwa mpe te.+ Nasali ete mokomoko na bino ayoka mpe nayebisi likambo yango banda ntango wana, boye te?+ Mpe bino bozali batatoli na ngai.+ Longola ngai, ezali nde na Nzambe mosusu?+ Te, Libanga ezali te.+ Nayebi ata moko te.’”

  • Yoane 15:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 mpe bino, na ngala na bino, bosengeli kopesa litatoli,+ mpo bozali elongo na ngai banda ntango nabandaki.

  • Misala 1:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 kasi bokozwa nguya+ ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli+ na ngai na Yerusaleme+ mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria+ mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”+

  • 1 Bakorinti 15:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Lisusu, tomonani mpe ete tozali batatoli ya Nzambe+ oyo bazali na lokuta, mpo tokoseli Nzambe makambo na ndenge topesi litatoli+ ete alamwisaki Kristo,+ nzokande alamwisaki ye te, soki ya solo, bakufi bakolamuka te.+

  • Emoniseli 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 mpe na Yesu Kristo, “Motatoli ya Sembo,”+ “Mwana ya liboso mpe moto ya liboso oyo asekwaki,”+ mpe “Moyangeli ya bakonzi ya mabele.”+

      Yesu, moto oyo alingaka biso+ mpe oyo afungolaki biso na masumu na biso na makila na ye+—

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto