43Bongo sikoyo Ee Yakobo, talá oyo Yehova alobi, Mozalisi na yo,+ mpe Moto oyo asalaki yo,+ Ee Yisraele: “Kobanga te, mpo nasikoli yo.+ Nabengi yo na nkombo na yo.+ Ozali wa ngai.+
21 “Kanisá makambo wana, Ee Yakobo,+ mpe yo, Ee Yisraele, mpo ozali mosaleli na ngai.+ Nasalá yo.+ Ozali mosaleli na ngai. Ee Yisraele, ngai nakobosana yo te.+
8 Mpe sikoyo, Ee Yehova, yo nde Tata na biso.+ Biso tozali mabele ya lima,+ mpe yo nde Moyemi na biso;+ mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.+