15 Okokoba nde koyangela mpo opusi kosalela nzete ya sɛdrɛ? Tata na yo alyaki mpe amɛlaki mpe asalaki na bosembo mpe na boyengebene te?+ Yango wana makambo na ye etambolaki malamu.+
8 Ee yo moto ya mabele, ye ayebisi yo oyo ezali malamu.+ Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo,+ kolinga boboto+ mpe kotambola na bopɔlɔ+ elongo na Nzambe na yo?+