-
Yosua 23:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 “Sikoyo, talá! Nazali lelo kokende na nzela ya bato nyonso,+ mpe boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.+
-
-
Zekaria 1:6Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Nzokande, na oyo etali maloba na ngai mpe malako na ngai oyo napesaki mitindo na basaleli na ngai, basakoli,+ yango ekómelaki nde batata na bino te?’+ Yango wana, babongwanaki mpe balobaki ete: ‘Oyo Yehova ya mampinga akanisaki kosalela biso,+ na kolanda banzela na biso mpe misala na biso, yango nde asalelaki biso.’”+
-