Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 1:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Mpe na mbula ya liboso ya Siruse+ mokonzi ya Perse, mpo liloba ya Yehova oyo ebimaki na monɔkɔ ya Yirimia+ ekokisama, Yehova alamwisaki+ elimo ya Siruse mokonzi ya Perse, bongo atindaki bábelela+ na bokonzi na ye mobimba, mpe lisusu bákoma na mokanda+ ete:

  • Yisaya 41:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Nalamwisi moto moko uta na nɔrdi, mpe akoya.+ Uta epai moi ebimaka+ akobelela nkombo na ngai. Mpe akonyata bayangeli-basungi lokola nde bazalaki mabele ya lima+ mpe lokola moyemi-mbɛki oyo azali konyatanyata biloko ya pɔtɔpɔtɔ.

  • Yisaya 45:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta,+ na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye,+ mpo nafungola ata mikaba na loketo ya bakonzi; mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te.

  • Yisaya 46:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Moto oyo azali kobenga ndɛkɛ oyo ekangaka banyama uta epai moi ebimaka,+ oyo azali kobenga moto mpo na kokokisa mokano na ngai uta na mokili ya mosika.+ Nalobi yango; nakokokisa yango.+ Nabongisi mokano yango, nakosala mpe yango.+

  • Danyele 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na mbula ya misato ya Siruse+ mokonzi ya Perse, likambo moko emonisamaki epai ya Danyele, oyo bazalaki kobenga na nkombo Beleteshazare;+ mpe likambo yango ezalaki solo, mpe etumba monene ezalaki.+ Mpe akangaki ntina ya likambo yango, mpe azwaki mayele ya likambo oyo emonani.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto