Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Estere 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe na bitúká nyonso oyo eyangelami mpe na bingumba nyonso, epai nyonso oyo liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye ezalaki kokóma, Bayuda bazalaki na esengo mpe nsai makasi, fɛti+ mpe mokolo malamu; mpe bato mingi+ ya mokili yango bamikómisaki Bayuda,+ mpo bakómaki kobanga+ Bayuda.

  • Yisaya 14:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bato ya bikólo bakozwa mpenza bango mpe bakomema bango na bisika na bango, mpe ndako ya Yisraele ekozwa bango lokola biloko na bango na mabele ya Yehova, mpo bázala basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi,+ mpe bakozala mpenza bato oyo bazali kokanga+ baoyo bazalaki kokanga bango, mpe bakozala mpenza na bokonzi likoló ya baoyo bazalaki kotinda bango na makasi básala mosala.+

  • Yisaya 60:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Mpe bana ya baoyo bazali komonisa yo mpasi bakoya mpenza epai na yo, bagumbami;+ mpe baoyo nyonso bazali komemya yo te bakofukama na makolo na yo,+ mpe ya solo bakobenga yo engumba ya Yehova, Siona+ ya Mosantu ya Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto