Yobo 38:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Yo ozalaki wapi ntango natyaki moboko ya mabele?+Yebisá ngai, soki oyebi eloko babengi mayele. Nzembo 78:69 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 69 Mpe atongaki esika na ye mosantu lokola bisika oyo etombwaná,+Lokola mabele oyo atye moboko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Nzembo 104:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela;+Ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.+ Nzembo 119:90 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 90 Bosembo na yo ezali libota na libota.+Otɛlɛmisi mabele makasi, mpo etikala kaka bongo.+ Masese 3:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Yehova ye moko atyaki moboko ya mabele na bwanya.+ Atɛlɛmisaki likoló makasi na bososoli.+
69 Mpe atongaki esika na ye mosantu lokola bisika oyo etombwaná,+Lokola mabele oyo atye moboko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
5 Atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela;+Ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.+