Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 27:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ntango bitape na ye ya mike ekokauka, basi oyo bakoya bakobuka yango, bakopelisa yango mɔtɔ.+ Mpo bazali bato ya mayele mingi te.+ Yango wana Mokeli na bango akoyokela bango mawa te, mpe Moto oyo asalaki bango akomonisela bango boboto te.+

  • Yirimia 8:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ata nkɔngi na likoló—eyebaka ntango na yango oyo etyamá;+ mpe epopo+ ná ndɛkɛ babengi martinɛ ná ndɛkɛ babengi bulubulu—etosaka malamu ntango oyo mokomoko na yango esengeli koya. Kasi bato na ngai bayebi te ekateli ya Yehova.”’+

  • Hosea 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ya solo mpenza, bato na ngai bakobomama nyɛɛ, mpo boyebi ezali te.+ Lokola obwaki boyebi,+ ngai mpe nakobwaka yo mpo osalela ngai lisusu te mosala ya nganga-nzambe;+ mpe lokola ozali kokoba kobosana mobeko ya Nzambe na yo,+ ngai mpe nakobosana bana na yo.+

  • Luka 19:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 mpe bakobwaka yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo na mabele,+ mpe bakotika te libanga likoló na libanga+ na kati na yo, mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotala yo.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto