18 Nani azali Nzambe lokola yo,+ oyo alimbisaka libunga mpe abosanaka kobuka mibeko+ ya bato ya libula na ye oyo batikali?+ Akokanga mpenza nkanda na ye libela te, mpo asepelaka na motema boboto.+
29 “Na yango, lokola tozali libota ya Nzambe,+ tosengeli kokanisa te ete Nzambe+ azali lokola wolo to palata to libanga, lokola eloko moko oyo eyemami na mayele mpe na makanisi ya moto.+