Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 21:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo mokonzi ya Babilone atɛlɛmaki na bisika banzela ekutani, na ebandeli ya nzela yango mibale, mpo na kosakola makambo oyo ebombaná.+ Aningisi makula. Atuni na nzela ya baterafime;+ mpe atalitali na kati ya libale.

  • Danyele 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo mokonzi alobaki bábenga banganga-nzambe ya maji+ mpe bato oyo babelelaka bilimo mpe banganga-nkisi mpe Bakaladea mpo na koyebisa mokonzi bandɔtɔ na ye.+ Mpe bakɔtaki mpe batɛlɛmaki liboso ya mokonzi.

  • Danyele 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mokonzi azalaki kobelela na mongongo makasi ete bákɔtisa bato oyo babelelaka bilimo, Bakaladea mpe banganga-minzoto.+ Mokonzi ayanolaki mpe alobaki na bato ya bwanya ya Babilone boye: “Moto nyonso oyo akotánga likomi oyo mpe akopesa ngai ndimbola na yango, bakolatisa ye bilamba motane-bulé,+ ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo, mpe akoyangela, akozala moto ya misato na bokonzi.”+

  • Emoniseli 18:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpe pole ya mwinda ekongɛnga lisusu epai na yo te, mpe mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu epai na yo te;+ mpo bato na yo ya mombongo+ oyo basalaka mibembo bazalaki bato ya bibonga minene+ ya mabele, mpo okosi bikólo nyonso na misala na yo ya bilimo mabe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto