Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 16:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Osengeli te kopɛngwisa lisambisi.+ Osengeli te kopona bilongi+ to kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato ya bwanya+ mpe ebulunganisaka maloba ya bayengebene.

  • Masese 17:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Moto mabe akozwa kanyaka oyo euti na ntolo+ mpo na kotɛngisa banzela ya bosembo.+

  • Yisaya 1:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+

  • Mika 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu na ye bazali kosambisa kaka mpo na kanyaka,+ mpe banganga-nzambe na ye mpenza bazali kolakisa kaka mpo na lifuti,+ mpe basakoli na ye mpenza bazali kosakola makambo ebombaná kaka mpo na mbongo;+ ata bongo bazali kokoba kotya motema epai ya Yehova, wana bazali koloba ete: “Yehova azali nde katikati na biso te?+ Mpasi ekoyela biso te.”+

  • Yakobo 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi soki bozali kaka kopona bilongi,+ bozali kosala lisumu, mpo mobeko epameli bino+ ete bozali bato oyo babukaka mibeko.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto