Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 21:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na nsima, mibale kati na bato yango, bato ya mpambampamba, bakɔtaki mpe bafandaki liboso na ye; mpe bato yango ya mpambampamba babandaki kopesa litatoli mpo na kofunda ye Nabote na miso ya bato ete: “Nabote alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe!”+ Nsima na yango, babimisaki ye na pembeni ya engumba mpe babambaki ye mabanga, bongo akufaki.+

  • Nzembo 94:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bazali kobunda makasi na molimo ya moyengebene+

      Mpe bazali kotánga moto oyo azali na likambo te ete azali mabe mpo básopa makila na ye.+

  • Masese 17:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Moto nyonso oyo azali kotánga moto mabe moyengebene+ mpe moto nyonso oyo azali kotánga moyengebene moto mabe+—ɛɛ, bango mibale bazali eloko moko oyo Yehova ayiná.+

  • Matai 23:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 mpo makila ya bayengebene nyonso oyo esopaná na mabele ekwela bino,+ banda na makila ya moyengebene+ Abele+ tii na makila ya Zekaria mwana ya Barakia, oyo bobomaki na kati ya esika mosantu ná etumbelo.+

  • Yakobo 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bokweisi, bobomi moyengebene. Azali kotɛmɛla bino te?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto