Kobima 15:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Abwaki makalo ya Farao mpe mampinga ya basoda na ye na mbu,+Mpe babundi na ye oyo baleki makasi bazindisami na Mbu Motane.+ Yobo 26:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Na nguya na ye, atombokisi mbu,+Mpe na mayele na ye, abukibuki+ eloko oyo enyokolaka.+ Nzembo 87:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Nakotánga Rahaba+ ná Babilone+ na kati ya baoyo bayebi ngai;Talá Filistia+ ná Tire, elongo na Kushi:“Talá moto moko oyo abotamaki kuna.”+ Nzembo 89:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Yo moko onyati Rahaba,+ lokola moto oyo abomami.+Na nguya ya lobɔkɔ na yo, opanzi banguna na yo.+
4 Abwaki makalo ya Farao mpe mampinga ya basoda na ye na mbu,+Mpe babundi na ye oyo baleki makasi bazindisami na Mbu Motane.+
4 Nakotánga Rahaba+ ná Babilone+ na kati ya baoyo bayebi ngai;Talá Filistia+ ná Tire, elongo na Kushi:“Talá moto moko oyo abotamaki kuna.”+