Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 noki apesa na moko na bango ndambo ya mosuni ya bana na ye oyo akolya, mpo akotikala na eloko te, mpo na nkaka mpe motungisi oyo monguna na yo akotya yo na kati ya baporte na yo nyonso.+

  • 2 Ntango 36:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo atindelaki bango mokonzi ya Bakaladea,+ oyo abandaki koboma na mopanga+ bilenge na bango ya mibali na ndako ya esika na bango mosantu,+ ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te.+ Apesaki eloko nyonso na lobɔkɔ na ye.

  • Estere 7:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe bakakisaki Hamane na nzete+ oyo abongiselaki Mordekai;+ mpe nkanda ya mokonzi ekitaki.

  • Nzembo 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Ee yo monguna, libebi na yo ya libela eyei,+

      Ná bingumba oyo opikoli.+

      Nkombo na bango ekoyokana lisusu te.+

  • Yisaya 10:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Yango wana, talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga, alobi: “Ee bato na ngai oyo bofandi na Siona,+ bóbanga Moasiri te, oyo azalaki kobɛtabɛta bino na fimbo+ mpe oyo azalaki kotombolela bino lingenda na ye ndenge Ezipito ezalaki kosala.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto