Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 60:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Mpe bana ya baoyo bazali komonisa yo mpasi bakoya mpenza epai na yo, bagumbami;+ mpe baoyo nyonso bazali komemya yo te bakofukama na makolo na yo,+ mpe ya solo bakobenga yo engumba ya Yehova, Siona+ ya Mosantu ya Yisraele.

  • Yirimia 31:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 “Mpo talá kondimana+ oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Nakotya mobeko na ngai na kati na bango,+ mpe nakokoma yango na motema na bango.+ Mpe nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.”+

  • Yirimia 32:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Mpe bakokóma mpenza bato na ngai,+ mpe ngai nakokóma Nzambe na bango.+

  • Zekaria 8:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nakoya na bango mpenza, mpe bakofanda na Yerusaleme;+ mpe bakokóma mpenza bato na ngai,+ mpe ngai nakokóma Nzambe na bango na bosolo mpe na boyengebene.’”+

  • Baebre 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Yehova alobi ete: ‘Mpo talá kondimana oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango. Nakotya mibeko na ngai na makanisi na bango, mpe nakokoma yango na mitema na bango.+ Mpe nakokóma Nzambe na bango,+ mpe bango bakokóma bato na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto