19 elingi koloba, ete Nzambe na nzela ya Kristo+ azalaki kozongisa mokili na boyokani+ ná ye moko,+ atángelaki bango mabunga na bango te,+ mpe apesaki biso liloba+ ya kozongisa na boyokani.+
20 mpe na nzela na ye, azongisa lisusu boyokani+ kati na ye ná biloko mosusu nyonso,+ ndenge atye kimya+ na lisalisi ya makila+ oyo asopaki likoló ya nzete ya mpasi,+ ezala biloko oyo ezali na mabele to biloko oyo ezali na likoló.