11 “Mpe Arona asengeli kopesa ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu, oyo ezali mpo na ye, mpe kozipa masumu na ye moko mpe ya ndako na ye; mpe asengeli koboma ngɔmbɛ-mobali yango, oyo ezali mpo na ye moko.+
27 Azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo,+ lokola banganga-nzambe minene wana basalaka, libosoliboso mpo na masumu na ye moko+ mpe na nsima mpo na oyo ya bato:+ (mpo asalaki yango mbala moko+ mpo na libela ntango amikabaki;+)