22 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Nakotombolela bikólo lobɔkɔ na ngai,+ mpe nakotombolela bato ya bikólo elembo na ngai.+ Mpe bakoya na bana na yo ya mibali na ntolo, mpe bakomema bana na yo ya basi na mapeka.+
4 “Tombolá miso na yo epai na epai mpe talá! Bayanganisami bango nyonso;+ bayei epai na yo.+ Bana na yo ya mibali bauti mosika bazali kaka koya, ná bana na yo ya basi oyo bato bamemi na loketo mpe bazali kobatela.+