25 Yango wana akobaki kosopela ye nkɛlɛ na ye, nkanda na ye, mpe mpasi ya etumba.+ Mpe yango ekobaki kozikisa ye epai na epai,+ kasi atyaki likebi te;+ mpe ekobaki kopelela ye, kasi abombaki eloko moko te na motema.+
57Moyengebene akufi,+ kasi moto moko te azali kotya likambo yango na motema.+ Mpe bato ya motema boboto bazali koyanganisama na bakufi,+ ntango moto moko te azali kososola ete moyengebene alongolami nde mpo na mpasi.+