17 “Ee Yerusaleme, lamuká, lamuká, tɛlɛmá,+ yo oyo omɛli na lobɔkɔ ya Yehova kɔpɔ ya nkanda makasi na ye.+ Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu, omɛli yango, osilisi yango.+
52Ee Siona, lamuká, lamuká, latá bokasi na yo!+ Ee Yerusaleme, engumba mosantu,+ latá bilamba na yo ya kitoko!+ Mpo esutu mpe moto ya mbindo akokɔta epai na yo lisusu te.+
58“Belelá na mongongo makasi; kotika te.+ Tombolá mongongo na yo lokola liseke, mpe yebisá bato na ngai botomboki na bango,+ mpe ndako ya Yakobo masumu na bango.