Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Misala 26:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 mpo na kofungola bango miso,+ mpo na kolongola bango na molili+ mpo báya na pole+ mpe kolongola bango na nguya ya Satana+ mpo báya epai ya Nzambe, mpo bázwa bolimbisi ya masumu+ mpe libula+ na kati ya baoyo basantisami+ na nzela ya kondima na bango epai na ngai.’

  • Baroma 1:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 mpamba te, atako bayebaki Nzambe, bakumisaki ye te ndenge bakumisaka Nzambe mpe bapesaki ye matɔndi te,+ kasi makanisi na bango ekómaki ya bozoba+ mpe motema na bango oyo ezangá mayele ekómaki molili.+

  • 1 Petro 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi bino bozali “libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu,+ bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza,+ mpo bósakola bizaleli malamu”+ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto