Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 7:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova Nzambe ya bankɔkɔ+ na biso apambolama, ye oyo atye likambo ya boye na motema+ ya mokonzi, mpo na kokómisa kitoko+ ndako ya Yehova, oyo ezali na Yerusaleme!

  • Nehemia 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe nalobaki lisusu na mokonzi ete: “Soki emonani malamu na miso ya mokonzi, bápesa ngai mikanda+ mpo na baguvɛrnɛrɛ+ ya ngámbo mosusu ya Ebale,+ mpo bátika ngai naleka kino nakokóma na Yuda;

  • Yisaya 49:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe bakonzi bakokóma mpenza babɔkɔli na yo,+ mpe bana basi ya bakonzi yango bakozala basi oyo bakomɛlisa yo. Bakogumbamela yo bilongi na nse,+ mpe bakolɛmbɔla putulu ya makolo na yo;+ mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova, oyo baoyo batyelaka ngai elikya bakoyoka nsɔni te.”+

  • Emoniseli 21:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe bikólo bakotambola na lisalisi ya pole na yango,+ mpe bakonzi ya mabele bakomema nkembo na bango kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto