17 Bongo atindelaki bango mokonzi ya Bakaladea,+ oyo abandaki koboma na mopanga+ bilenge na bango ya mibali na ndako ya esika na bango mosantu,+ ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te.+ Apesaki eloko nyonso na lobɔkɔ na ye.
17 “Mpo nakozongisela yo nzoto makasi, mpe nakobikisa yo na bampota na yo,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpo bazalaki kobenga yo nde mwasi oyo babenganá:+ ‘Ezali Siona, oyo moto moko te azali koluka.’”+
10 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na esika oyo bino bokobanda koloba ete etikali se mpamba, moto azali te mpe nyama ya mboka ezali te, na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme oyo etikali mpamba,+ moto azali te mpe moto afandi kuna te mpe nyama ya mboka ezali te, bakoyoka lisusu+
27 Mpo ekomamá boye: “Sepelá, yo mwasi ekomba oyo abotaka te; belelá mpe gangá makasi, yo mwasi oyo oyokaka mpasi ya kobota te; mpo bana ya mwasi oyo asundolamá bazali mingi koleka bana ya oyo azali na mobali.”+