26Na mokolo yango,+ na mokili ya Yuda,+ bakoyemba loyembo oyo:+ “Tozali na engumba ya makasi.+ Lobiko oyo ye azali kopesa ezali lokola bifelo mpe ngomba oyo basalá mpo na libateli.+
19Nsima ya makambo wana nayokaki mongongo moko ya makasi oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu na likoló.+ Balobaki ete: “Bósanzola Yah!+ Lobiko+ ná nkembo ná nguya ezali ya Nzambe na biso,+