10 Talá! Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova ye moko akoya mpenza lokola moto ya makasi, mpe lobɔkɔ na ye ekoyangela mpo na ye.+ Talá! Azali na mbano ya kopesa,+ mpe lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.+
4 Kasi ngai nalobaki ete: “Nabomi nzoto kaka mpamba.+ Nabebisaki nguya na ngai mpo na eloko moko ya solo te mpe mpo na mpamba.+ Ya solo Moto oyo azali kosambisa ngai ezali Yehova,+ mpe Nzambe na ngai nde Moto oyo azali kofuta ngai.”+