7 Na esika ya nsɔni na bino ekozala likabo mbala mibale,+ mpe na esika ya kosambwa bakoganga na esengo mpo na likabo na bango.+ Yango wana, bakozwa makabo mibale+ na mokili na bango. Bakozala na esengo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
14 Mpe bokomona mpenza, mpe motema na bino ekosepela mpenza,+ mpe mikuwa na bino+ ekokola lokola matiti ya pɛtɛpɛtɛ.+ Mpe lobɔkɔ ya Yehova ekoyebana epai ya basaleli na ye,+ kasi ya solo akolobela banguna na ye mabe.”+