3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+
16 Mpe ekozala mpenza na balabala moko monene+ oyo ekouta na Asiri mpo na bato na ye+ oyo bakotikala,+ kaka ndenge balabala moko ezalaki mpo na Yisraele na mokolo oyo abimaki na mokili ya Ezipito.
6 Nakoloba na nɔrdi+ ete: ‘Tiká!’ mpe na sudi ete: ‘Kopekisa te. Yaká na bana na ngai ya mibali uta na mosika, mpe na bana na ngai ya basi uta na nsuka ya mabele,+
4 “Tombolá miso na yo epai na epai mpe talá! Bayanganisami bango nyonso;+ bayei epai na yo.+ Bana na yo ya mibali bauti mosika bazali kaka koya, ná bana na yo ya basi oyo bato bamemi na loketo mpe bazali kobatela.+
31 Mpe akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo,+ mpe bakoyanganisa bato oyo ye aponá+ esika moko uta na mipɛpɛ minei,+ uta na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.