11 Lolendo na yo ekitisami na Nkunda,* makɛlɛlɛ ya bibɛtɛlo na yo ya bansinga.+ Na nse na yo, nkusu etandami lokola mbeto; mpe misɔpi nde elamba na yo ya kozipa nzoto.’+
10 Ezala na butu to na moi, ekokufa te; molinga na yango ekomataka se komata kino ntango oyo etyami ndelo te.+ Akokauka libota na libota;+ moto moko te akoleka kuna libela na libela.+
12 Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtola mpenza esika na ye ya kotuta mbuma, mpe akoyanganisa blé na ye na ndako ya kobomba biloko,+ kasi akotumba mposo na yango+ na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.”
41 “Bongo akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa awa,+ bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko+ oyo babongiselá Zabolo ná baanzelu na ye.+