Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+

      Nakobanga nani?+

      Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

      Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+

  • Nzembo 84:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+

      Apesaka boboto mpe nkembo.+

      Yehova ye moko akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.+

  • Yisaya 31:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe libanga na ye ekolimwa na nsɔmɔ, mpe mpo na elembo,+ bankumu na ye bakoyoka nsɔmɔ,” yango nde liloba ya Yehova, oyo pole na ye ezali na Siona mpe oyo litumbu+ na ye ezali na Yerusaleme.

  • Yisaya 60:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpo na yo moi ekozala pole lisusu te na ntango ya moi, mpe kongɛnga ya sanza ekopesa yo pole lisusu te. Mpe Yehova akokóma mpenza na miso na yo pole oyo ezali koumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe Nzambe na yo akokóma kitoko na yo.+

  • Emoniseli 22:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe butu ekozala lisusu te,+ mpe bazali na mposa ya pole ya mwinda te mpe ya pole ya moi te, mpo Yehova Nzambe akosopela bango pole,+ mpe bakoyangela libela na libela.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto