Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 32:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo Yehova atindaki anzelu+ mpe alongolaki elombe nyonso, mobali ya nguya+ mpe mokambi ná kapita na kaa ya mokonzi ya Asiri,+ bongo ye azongaki na mokili na ye, na nsɔni na elongi. Na nsima, akɔtaki na ndako ya nzambe na ye mpe kuna, bana na ye mosusu oyo abotaki bakweisaki ye na mopanga.+

  • Yisaya 30:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Mpe ntango nyonso oyo Yehova akokitisela Asiri fimbo na ye ya etumbu, ekozala mpenza elongo na bambonda mike mpe na banzɛnzɛ;+ mpe akobunda mpenza na bango na bitumba ya koningisa bibundeli.+

  • Yisaya 37:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpe anzelu+ ya Yehova abimaki mpe abomaki bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000) na kaa ya bato ya Asiri.+ Ntango bato balamukaki ntɔngɔntɔngɔ, talá, bango nyonso bakufi, balali bibembe.+

  • Mika 7:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe monguna na ngai akomona, mpe nsɔni ekozipa ye,+ moto oyo azalaki koloba na ngai ete: “Yehova Nzambe na yo, azali wapi?”+ Miso na ngai mpenza ekotala moto yango.+ Sikoyo ye akokóma esika ya konyatanyata, lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.+

  • Nahumu 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe ekosalema mpenza boye: moto nyonso oyo akomona yo akokima yo mosika+ mpe akoloba mpenza ete: ‘Ninive epunzami! Nani akoya kotala ye na mawa na ye?’ Nakolukela yo babɔndisi epai wapi?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto