21 Bongo Zeba ná Zalamuna balobaki: “Yo moko tɛlɛmá mpe kwelá biso, mpo ndenge moto azali, ndenge mpe nguya na ye ezali.”+ Na yango, Gideone atɛlɛmaki mpe abomaki+ Zeba ná Zalamuna mpe azwaki biloko ya kobongisa nzoto oyo basalá lokola sanza, biloko yango ezalaki na bankingo ya bakamela na bango.