Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Na mikolo yango, ndako ya Yuda ná ndako ya Yisraele+ bakotambola elongo,+ mpe bakobima elongo na mokili ya nɔrdi mpo na kokɔta na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino libula.+

  • Ezekiele 37:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Nde yo, Ee mwana ya moto, zwá mwa eteni ya nzete+ mpe komá likoló na yango boye: ‘Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Yisraele, baninga na ye.’+ Mpe zwá mwa eteni mosusu ya nzete mpe komá likoló na yango ete: ‘Mpo na Yozefe, mwa eteni ya nzete ya Efraime,+ mpe ndako mobimba ya Yisraele, baninga na ye.’+

  • Ezekiele 37:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kozwa mwa eteni ya nzete ya Yozefe, oyo ezali na lobɔkɔ ya Efraime, mpe mabota ya Yisraele, baninga na ye, mpe nakotya yango likoló na yango, elingi koloba, mwa eteni ya nzete ya Yuda, mpe nakokómisa mpenza yango eteni kaka moko ya nzete,+ mpe ekozala kaka moko na lobɔkɔ na ngai.”’

  • Hosea 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe bana ya Yuda ná bana ya Yisraele bakoyanganisama mpenza mpe bakozala na bomoko+ mpe, ya solo, bakomityela mokonzi se moko, mpe bakomata mpo bábima na mokili yango,+ mpamba te mokolo ya Yizireele ekozala monene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto