Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 6:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo nalobaki boye: “Ee Yehova, kino ntango nini?”+ Bongo alobaki boye: “Tii bingumba ekobeba mpenza kobeba mpe moto ata moko te akofanda kuna, mpe bandako ekozala na moto ya mabele te, mpe mabele yango moko ekobeba mpenza kobeba;+

  • Hosea 10:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe yikiyiki ebimi na kati ya bato ya ekólo na yo,+ mpe bingumba nyonso na yo oyo ebatelami makasi ekopunzama,+ lokola kopunza oyo Shalmane apunzaki ndako ya Arabele, na mokolo ya etumba oyo bakatakataki mama pembeni ya bana na ye.+

  • Amose 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Yango wana, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Monguna moko azali mpenza zingazinga na mokili,+ mpe akokitisa yo makasi na yo, mpe bandako milai na yo ya kofanda ekopunzama mpenza.’+

  • Mika 5:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe nakolongola bingumba ya mokili na yo mpe nakokweisa bisika na yo nyonso oyo ebatelami makasi.+

  • Mika 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe mokili ekokóma esika etikali mpamba mpo na mabe ya bato oyo bafandi na kati na yango, mpo na mbuma ya misala na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto