Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 22:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpo Yehova ye moko akosamba likambo na bango,+ mpe ya solo akobɔtɔla molimo ya baoyo bazali kobɔtɔla bango biloko.+

  • Yisaya 33:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mawa na yo oyo ozali kopunza nzokande bapunzi yo te, mpe na yo oyo ozali kosala makambo na bokosi nzokande bato mosusu basaleli yo makambo na bokosi te!+ Ntango kaka okosilisa kopunza, bakopunza yo.+ Ntango kaka okosilisa kosala na bokosi, bakosalela yo makambo na bokosi.+

  • Ezekiele 39:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe bakomema nkoni oyo euti na esobe te, bakolɔkɔta nkoni ya kopelisa mɔtɔ na zamba mpe te, mpo bakopelisa mɔtɔ na bibundeli.’

      “‘Mpe bakobɔtɔla mpenza biloko ya baoyo bazalaki kobɔtɔla bango biloko,+ mpe bakopunza baoyo bazalaki kopunza bango,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.

  • Sefania 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Yango wana, lokola nazali solo na bomoi,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, “Moabe akokóma mpenza lokola Sodoma,+ mpe bana ya Amone+ lokola Gomora, esika oyo etondi na matiti ya nsendensende, libulu ya mungwa, mpe esika oyo etikali mpamba, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bato na ngai oyo bakotikala bakopunza bango, mpe bato ya ekólo na ngai oyo bakotikala bakokóma bankolo na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto