13 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakobebisa mpe bikeko ya bosɔtɔ+ mpe nakosilisa banzambe ya mpambampamba na Nofe,+ mpe nkumu akozala lisusu te na mokili ya Ezipito; mpe nakotya mpenza kobanga na mokili ya Ezipito.+
6 Mpo talá! bakokende mpenza likoló ya kopunzama.+ Ezipito ekosangisa bango esika moko;+ bongo Memfisi+ ekokunda bango. Mpe matiti ya nsendensende ekokóma nkolo ya biloko na bango ya kitoko ya palata;+ mwa banzete ya nzubɛnzubɛ ekozala na kati ya bahema na bango.+