Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe sinzili+ atɛlɛmaki likoló ya linɔ́ngi+ na Yizireele,+ mpe amonaki ebele ya bato ya Yehu oyo bazalaki kopumbwapumbwa ntango azalaki koya, mpe na mbala moko alobaki boye: “Nazali komona ebele ya bato bazali kopumbwapumbwa.” Na yango, Yehorame alobaki ete: “Zwá soda moko oyo atambolaka na mpunda mpe tindá ye akutana na bango, mpe aloba boye: ‘Kimya ezali?’”+

  • Yisaya 62:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ee Yerusaleme, natye basinzili+ likoló ya bifelo na yo. Moi mobimba mpe butu mobimba, ntango nyonso, bákanga monɔkɔ te.+

      “Bino baoyo bozali kolobela nkombo ya Yehova,+ bófanda nyɛɛ te,+

  • Yirimia 51:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bótombola elembo+ na bifelo ya Babilone. Bókɛngɛla makasi.+ Bótya basinzili. Bóbongisa bato oyo bazali kotya motambo.+ Mpo Yehova azwi likanisi mpe akosala mpenza oyo alobi mpo na bato oyo bafandi na Babilone.”+

  • Ezekiele 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mwana ya moto, nakómisi yo sinzili mpo na ndako ya Yisraele,+ mpe osengeli koyoka maloba ya monɔkɔ na ngai mpe osengeli kokebisela ngai bango.+

  • Ezekiele 33:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe soki amoni mpenza mopanga ezali koyela mokili yango mpe ayuli liseke mpe akebisi bato,+

  • Habakuku 2:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nakotɛlɛma na esika na ngai ya kokɛngɛla,+ mpe nakozala likoló ya efelo makasi ya libateli; mpe nakosɛnzɛla,+ mpo na komona oyo ye akoloba na nzela na ngai+ mpe oyo nakozongisa na mpamela oyo nakozwa.+

  • Matai 24:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele+ oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto