-
Nehemia 8:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Mpe Nehemia,+ elingi koloba, Guvɛrnɛrɛ,*+ ná nganga-nzambe Ezera,+ mosali-bakopi, mpe Balevi oyo bazalaki kolakisa bato, balobaki na bato nyonso ete: “Lelo ezali mokolo mosantu na miso ya Yehova Nzambe na bino.+ Bózala na mawa te mpe bólela te.”+ Mpo bato nyonso bazalaki kolela ntango bazalaki koyoka maloba ya mobeko.+
-
-
Yoele 2:17Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
17 “Na esika oyo ekaboli ndako ya kokɔtela mpe etumbelo,+ banganga-nzambe, basaleli ya Yehova, bálela mpe báloba ete: ‘Ee Yehova, yokelá bato na yo mawa, mpe kokómisa libula na yo eloko ya nsɔni te,+ mpo bikólo eyangela bango. Mpo na nini báloba na kati ya bato ya bikólo ete: “Nzambe na bango azali wapi?”’+
-