5 Na yango, moto oyo azalaki kotambwisa ndako yango ná oyo azalaki kotambwisa engumba ná mikóló ná babɔkɔli+ batindelaki Yehu bato, na maloba oyo: “Tozali basaleli na yo, mpe tokosala nyonso oyo okoloba na biso. Tokotya ata moto moko te mokonzi. Salá oyo ezali malamu na miso na yo.”