-
Ezekiele 20:47Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
47 Mpe osengeli koloba na zamba ya sudi boye: ‘Yoká liloba ya Yehova. Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai wana nazali kopelisela yo mɔtɔ,+ mpe ekozikisa na kati na yo nzete nyonso ya mobesu mpe nzete nyonso oyo ekauká.+ Mɔtɔ yango oyo ezali kopela ekobomama te,+ mpe ekozikisa bilongi nyonso mpenza banda na sudi kino na nɔrdi.+
-
-
Malaki 4:1Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 “Mpo talá! mokolo ezali koya oyo ezali kopela lokola litumbu ya mɔtɔ,+ mpe bato nyonso ya lofundo mpe baoyo nyonso basalaka makambo mabe bakokóma lokola matiti ya blé.+ Mpe mokolo oyo ezali koya ekozikisa mpenza bango,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe yango ekotikela bango mosisa te, etape mpe te.+
-