Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na nsima, mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Babilone,+ ya Kuta, ya Ava,+ ya Hamate+ mpe ya Sefarvaime+ mpe afandisaki bango na bingumba ya Samaria+ na esika ya bana ya Yisraele; mpe babandaki kozwa Samaria mpe kofanda na bingumba na yango.

  • Yisaya 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mpe ekosalema mpenza boye: ntango Yehova akosilisa mosala na ye nyonso na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, nakotuna mokonzi ya Asiri azongisa monɔkɔ mpo na mbuma ya lofundo ya motema na ye mpe mpo na komitombola ya miso na ye ya lolendo.+

  • Yisaya 30:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpamba te, mpo na mongongo ya Yehova, Asiri ekozala na nsɔmɔ;+ akobɛta yango na lingenda.+

  • Nahumu 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Ee mokonzi ya Asiri, babateli na yo ya mpate bayoki mpɔngi;+ bato na yo ya lokumu bafandi na bisika na bango ya kofanda.+ Bato na yo bapalanganisami na bangomba, mpe moto ya kosangisa bango esika moko azali te.+

  • Sefania 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpe akosembola lobɔkɔ na ye na ngámbo ya nɔrdi, mpe akobebisa Asiri.+ Mpe akokómisa Ninive esika oyo etikali mpamba,+ etúká oyo ezangá mai lokola esobe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto