Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 50:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Moto oyo azali kopesa matɔndi mpo ezala mbeka na ye, ye nde moto azali kopesa ngai nkembo;+

      Mpe moto oyo azali kolanda nzela oyo etyami,

      Ngai nakomonisa ye lobiko ya Nzambe.”+

  • Nzembo 107:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe bákaba bambeka ya kozongisa matɔndi+

      Mpe básakola misala na ye na koganga ya esengo.+

  • Nzembo 116:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Nakokabela yo mbeka ya kozongisa matɔndi,+

      Mpe nakobelela nkombo ya Yehova.+

  • Yirimia 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala, mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bókumisa Yehova ya mampinga, mpo Yehova azali malamu;+ mpo motema boboto na ye ezali seko na seko!”’+

      “‘Bakomema likabo ya kozongisa matɔndi na ndako ya Yehova,+ mpo nakozongisa bakangami ya mokili ndenge ezalaki na ebandeli,’+ Yehova alobi bongo.”

  • Baebre 13:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nzela na ye, tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli+ ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu+ na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto